(1) 1. (Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki(1) ya kolandana! (ba anzelu)
1 Baye batindamaki: Awa ekoki kolimbolama na: Ba anzelu, to mopepe.
(2) 2. Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi!
(3) 3. Mpe bazali kopanza bisika binso!
(4) 4. Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu!
(5) 5. Mpe na baye babwakaka mbela,
(6) 6. Mpona bolimbisi to bokebisi!
(7) 7. Oyo bolakamaki ekozangaka te.
(8) 8. Tango minzoto mikolimwaka.
(9) 9. Mpe tango mapata ekopasuka,
(10) 10. Mpe tango bangomba bikolalisamaka,
(11) 11. Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka.
(12) 12. Yango ezongisami mpona mokolo nini?
(13) 13. O mokolo ya kokata makambo.
(14) 14. Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo?
(15) 15. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(16) 16. Boye tobomaki bamisusu liboso te?
(17) 17. Sima tolandisaki bamisusu te.
(18) 18. Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki.
(19) 19. Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi.
(20) 20. Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te?
(21) 21. Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te?
(22) 22. Na elaka oyo eyebani te?
(23) 23. Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te?
(24) 24. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(25) 25. Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te?
(26) 26. (Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa?
(27) 27. Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te?
(28) 28. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(29) 29. Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta.
(30) 30. Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato,
(31) 31. Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te!
(32) 32. Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo,
(33) 33. Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka.
(34) 34. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(35) 35. Mokolo wana bakolobaka te,
(36) 36. Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te,
(37) 37. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(38) 38. Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso.
(39) 39. Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai.
(40) 40. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(41) 41. Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba,
(42) 42. (Bakoliaka) bambuma oyo balingi.
(43) 43. Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki.
(44) 44. Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi.
(45) 45. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(46) 46. Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki.
(47) 47. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(48) 48. Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)
(49) 49. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
(50) 50. (Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka?