92 - Al-Lail ()

|

(1) 1. (Nalapi) na butu ntango ezipaka biloko binso!

(2) 2. (Mpe na lapi) na moyi(1) ntango ezali ко ngala!
1 Moyi: Mokolo ntango eyaka polele.

(3) 3. Mpe (Allah) akeli mobali na mwasi.

(4) 4. Ya soló, molende na bino ezali ya kokesene.

(5) 5. Kaši тропа oyo apesi mpe abangi Allah,

(6) 6. Mpe andimi na bosôló ya lifuti (lola).

(7) 7. Tokolembisela ye nzela ya bozui.

(8) 8. Kaši тропа oyo azali mopimi mpe azali komipesa na mabondeli te,

(9) 9. Mpe aboyi kondima na mokolo ya mbano.

(10) 10. Toko bongisela ye nzela ya paši.

(11) 11. Bomengo naye ekosalisa ye na eloko te na ntango ya paši.

(12) 12. Bokambi bozali bwa biso.

(13) 13. Мре ya soló, bomoyi ya lelo na ya lobi bozali bwa biso.

(14) 14. Nazali kokebisa bino na moto ezali kopela.

(15) 15. Akozikisama na yango sé moto ya mabe.

(16) 16. Oyó aboyi kondima mpe apesi mokongo.

(17) 17. Kasi moto ya bobangi Allah akozala mosika na yango.

(18) 18. Oyó azali kopesa bomengo bwaye mpo apetwama.

(19) 19. Ezali te тропа ye kosepelisa moko o’kati ya bato.

(20) 20. Sé тропа koluka kornona elongi ya Nkolo naye oyo azali olikolo koleka.

(21) 21. Mpe na nsima Nkolo naye akosepela naye.