86 - At-Taariq ()

|

(1) 1. (Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu!

(2) 2. Nani akoyebisa yo nini monzoto ya butu,

(3) 3. Ezali monzoto ya bongengi makasi.

(4) 4. Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye.

(5) 5. Esengeli na moto ayeba na nini yango akelamaki,

(6) 6. Akelamaki kowuta na litanga ya mayi.

(7) 7. Ewuti o’kati na mokongo mpe mipanzi.

(8) 8. Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi,

(9) 9. Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki,

(10) 10. Akozala na nguya te mpe akozala na mosalisi te.

(11) 11. (Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula,

(12) 12. Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama,

(13) 13. Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo.

(14) 14. Kasi ezali eloko ya pamba te.

(15) 15. Ya soló, bango bazali koyangela mwango,

(16) 16. Ngai mpe nazali na ya ngai mwango.

(17) 17. Pesa bapagano elaka, pesa bango elaka ya mokuse.